• Nzambe (Allah) alobi:﴿
{Ee bato, bosambela Nkolo na bino oyo akelaka bino na ba oyo bazalaka liboso na bino mpo ete bokoma (ba bangi nzambe}.
[Al-Baqarah: 21]
.
• Nzambe (Allah) alobi:﴿
{Ye azali Allah, nzambe mosusu azali te kaka Ye}.
[Al-Hashr: 22].
• Nzambe (Allah) alobi :
“{Eloko moko te ezali lokola Ye , Na Ye azali Moyoki Momoni Nyonso}.
[Al-Shura: 11].
• Nzambe azali Nkolo na ngai mpe Nkolo ya biloko nyonso, Nkolo, Mozalisi, Mosungi mpe Mokambi ya biloko nyonso.
• Ye moko nde abongi na losambo, Nkolo mosusu azali te, Na nzambe mosusu azali te longola se Ye Moko kaka Nde nzambe.
• Azali na bankombo ya kitoko mingi mpe bizaleli ya lokumu oyo Ye andimisaka mpo na Ye moko mpe Ntoma na Ye - tika ete Nzambe apambola ye mpe apesa ye kimia - andimisaka mpo na ye akómi na esika ya nsuka na bobongi nie mpe na kitoko Ezali na eloko moko te lokola Ye ezali Moyoki Nyonso mpe Momoni Nyonso.
Kati na bankombo na Ye ya kitoko:
Ar-Razzāq, Ar-Rahmān, Al-Qadīir, Al-Malik, As-Samīu, As-Salāam, Al-Basīir, Al-Wakīil, Al-Khāaliq, Al-LAtwīif, Al-Kāafī, Al-Ghafùr.
Al-Razzaq: Oyo azali kopesa bomoi ya basali, oyo azali kopesa bilei ya mitema mpe nzoto na bango.
Ar-Rahmān : Ye oyo azali na ngolu monene, na mawa oyo ezingi biloko nyonso.
Al-Qadīir :Mozwi-ya-Nguya-Nyonso: Ye oyo azali na nguya na makoki nyonso, Mpe incapacité na bolembu ezuaka ye te.
Al-Malik (Mokonzi): Alimbolami na bizaleli ya bonene, ya konyokola, mpe ya boyangeli Azali nkolo ya biloko nyonso mpe azali na bokonzi likolo na yango.
As-Samīu Moyoki: Eloko nioso ekomelaka ye, ezala ya kobombama to ya polele.
As-Salāam (Kimya) : kimia uta na bozangi, mpasi mpe mbeba nyonso.
Al-Basīir :Ye oyo amonaka nyonso, miso na ye esangisi makambo nyonso, ata soki ezali moke koleka, ye azali na bososoli ya makambo, ayebi yango mpe ayebi makambo oyo ezali na kati.
Al-Wakīil : Ye oyo azali ko garantir vie ya peuple na ye, oyo azali ko soigner ba intérêts na bango, mpe oyo azali kozua charge ya ba gardiens na ye mpe ko faciliter makambo mpo na bango mpe ekoki mpo na bango.
Al-Khāaliq : Mozalisi mpe Mokeli ya biloko kozanga ndakisa moko ya liboso.
Al-LAtwīif : Ye oyo azali kokumisa basali na Ye, ayokelaka bango mawa, mpe apesaka bango masengi na bango.
Al-Kāfī :Oyo akoki basali na ye na nionso oyo basengeli na yango, mpe ye amikoka na lisungi na ye moko , mpe ye azali komikokisa ye moko.
Al-Ghafùr :Molimbisi Ye oyo abatelaka basali na ye na mabe ya masumu na bango, mpe apesaka bango etumbu te mpo na yango.
Musulman azali komanyola na makamwisi ya bokeli ya Nzambe mpe ya facilitation na Ye, mpe yango esangisi bobateli ya bikelamu mpo na bana na bango, kozala na bokebi mpo na koleisa bango mpe kobatela bango kino bakomipesa Nkembo na Ye, Mozalisi na bango mpe na Moto oyo azali na boboto epai na bango, mpe uta na boboto na Ye ezali ete apesi bango oyo ekosalisa bango mpe ekosembola ezalela na bango atako botau na bango nyonso.